Artistes: Athom's et Nadege Album: Le Culte Vol. 1 Titre: Pona bolamu
***LYRICS***
*1st part*
Na koki te ko bomba eh, Na koki te ko fanda kimia, Na koki na zanga maloba eh, Na koki te na kanga monoko, Bolamu'a Nzambe eleki bo moyi nanga Na koki te, ko bomba yango (Yaweh)
Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh, Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh
Na koki te na fanda kimia Na koki te na kanga monoko Bolamu'a Nzambe elekeli nga mosantu Na koki te na zanga maloba A kanisaka nga ata na kanisi Ye te Yesu na nga ooo nazua na talo Yaya
Pona bolingo oyo -- na moni eeeeh eh Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh
Ba sujets nionso eza n'ango valables Soki'olingi o sanjola Nzambe Ba 'susu ba sanjola Ye pona lipa Ba 'susu ba netola Ye pona mbongo Sujet nionso, eza nango na tina A condition que ozala mosantu (Yaya)
Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh, Pona bolamu oyo -- O sali eeeh eh
Nzambe monene lokola Yo papa Na mokili'oyo na moni te oh Na kanisi nionso o saleli nga Na zongi pene na yo na kumisa yo eh Ba lobi na nga na binaka lokola liboma Kasi na yebi sujet ya mabina na nga
(Eza) Bolamu oyo -- O sali eeeh eh, (Eza) Bolamu oyo -- O sali eeeh eh
Ba kamue nga ba lobi na banda wapi Ba mituni eza pona nini Ba yebi te temoignage'a motema Makamb'o eliki nga meke molimo Ata moto mosusu a yeba te oooh Motema na nga eza temoin (Yaya)
Ewuti nga mozindo a motema eh Ebimi nga kino monoko Na lingi na ganga kasi na koki te oh Motema na nga esi etondi Etondi na bolamu na Nzambe Na libota to pe na santé na nga (Yaya)
(Na yemba) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh, (Na yemba) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
Na etonga, ma boko na nga likolo Molimo na nga esi emati Pinjoli na miso eza ko tanga eh Ba mituni ooh pona nini Nazui rétroviseur na tali kala eeh Bolamu nionso Nzambe asala
(Na yembi ooh) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh, (Quand je me souviens je me mets à chanter, à chanter comme un fou pour Jésus) -- bolamu oyo -- O sali eeeh eh,
Eloko mosusu te na bomoï na nga Eza na motuya lokola makambu'oyo Oyo Masiya A salela nga Oy'o elekela nga mabanzo Yango na pesa wolo to pe palata eeh Nionso na pesa soki A sengi
Pona bolamu oyo -- na moni eeeh eh, Pona bolamu oyo -- na moni eeeh eh,
*2nd part*
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga (O longi'oooh oh oh motema eeh)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga papa (Olongi motema ya mosantu na Yo eeeh)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
(Olongi molimo ooooooh ya moyengebene ooh Papa ooh)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
Na komi'otik'o zala nga Na komi'o koma lokola Yo Yaya (po olongi ooh na mozindo'a motema Papa)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
Moto ya kanda kanda A zua douceur a Molimo eeh (po olongi ye ooh Masiya oh)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
Na yemba loyembo'eyemba Jacob a koma Israel oh (Po olongi oooh Yaweh ooh)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
Makambu'ango elekeli nga Kasi na lobi sala ndenge O lingo oooh (oooh Yaweh eeh) (Yaweh eeeoooh)
Yaweh eeeeeeeeeh Yaweh eh Olongi motema na nga
Likambo'ango e lelisi nga kasi na lobi sala ndenge'O lingi oooh (Yaweh eeeeh eeh eh)